Eleki mibu 57 banda Transfigiration ya Tata Molimo mosanto esalemaki na le 12.Oct. 1951.Ya solo, na mokolo yango ezalaka pasi pona biso bana ya ndako. kasi esengo pona elonga ya Nzambe na biso o mokili. Na mokolo yango, monguna a salaka feti, na bo yebaka suka ya likambo wana te!!! Ndenge kaka elobamela na mokanda mua bomoyi na Jean 12. 38-40 na tina ya bo sosoli likambo yango: Dieu fait que les evenements se repètent. Lelo ba pesi biso mokumba ete to teya mokili ,ete Tata Molimo Mosanto azali o se. Ba mosusu ba lobi ete "ezali facile te" nini oyo Tata Nzambe a ko lembana? Papa Dialungana Nkolo Yesu a loba na biso " botanga na Exode 14. 14 " , po a pesa biso assurance kasi ba mususu ndenge kaka ba ndeko ya Presse Kimbanguiste ya France ba lobeli yango na site officiel ya Eglise "Constats et précisions importantes" ,epesameli biso lelo, baye to bengami "Bana" ya TATA : To telemi wapi? Ozali muana ya botosi? Na Mbanza Ngungu ,Tata Molimo Mosanto a lobi " Na tikeli bino biblia", pona ete to sosola ye azali nani et tina nini a yela o nse!!! To tanga Jean:14. 15-17; kaka na Jean:16. 12-15, na biso ba Kimbanguiste ya mokili mobimba et surtout ya Europe. Tozala na botosi, Papa a lobi : Ye azali Milles Pattes. Mokili sosola ya biso message mpe oyoka yango ,tobombi te. Oyo etikali ye moko Nkolo na biso a sala, Na Bana nionso ya Tata Molimo Mosanto to yika mpiko na mabondeli, kati na Bolingo,Mibeko mpe Misala po ete to pesa Tata na biso esengo, na pasi oyo a mona pe amonaka kino lelo pona lobiko na biso. (texte: papa Lukau Antoine) Longi